24/05/2025
Bomoi ya moluki mozalaka mpenza mosika te ná oyo ya limpinga.
Biso binso tobengamaka na kokende bisika ya mak**a kaka mpo na koluka biyano ya baiké.
Esengelaki na biso, kokota o kati ya ebale enene ya Kwilu mpo na koziba nzebi eye ebombami o etando eye.
Tobimi na boyebi mpe tosepeli engebene na lisese ya nkondo SENE Mongaba « Sepela na boyebi, ebomaka te »
04/12/2024
📍MATEYA YA LINGALA
✅LE PASSÉ HABITUEL
✅LE PRÉSENT HABITUEL
✅LE FUTUR HABITUEL
Tous ces temps ont un seul point commun : le suffixe « aka » avec une légère différence de ton.
Likelelo « Kozala » - verbe « être »
1. Le passé habituel -
Nazaláká - j’étais souvent/ habituellement
2. Le présent habituel
Nazalaka - je suis souvent/ habituellement
3. Le futur habituel
Nakozaláká - je serai toujours
⛑️ Pour suivre les cours en intégralité, tous les détails sont sur l’affiche et on démarre ce lundi 09 Décembre 2024 au Centre Culturel Andrée Blouin à partir de 10h
30/11/2024
Club d’échange pour enfants « Mobote ! » afin de permettre aux enfants africains de se relier culturellement entre eux grâce au lingala.
Rencontre en ligne, accès gratuit 👇🏼
https://calendar.app.google/H6H8PE9RkQ9zJ6Qt5
10/11/2024
À vous chers parents congolais désireux de voir vos enfants parler le lingala librement entre amis,frères,etc. Le club d’échange « Loba lingala » est là pour vous.
Inscrivez rapidement vos enfants en nous laissant un message ou juste un commentaire 🤗🤗🤗
Mbote !
06/10/2024
Bomòkò ya bobiso ya Kongo etalisama makasi na bomòmò ya minoko na biso.
Mwana ya Kongo oyo ayekoli lingala na mozindo soki mwana mosusu ya Kongo oyo ayekoli Kikongo, Ciluba, to monoko mosusu, soki bazali kosolola moto na moto na monoko na ye bakososolana. Pamba te minoko ya Kongo ezali kaka na mosisa mòkò.
Yango totandi awa na etanda oyo 👇🏽👇🏽👇🏽
**a
04/10/2024
Tata !
Esengeli na yo te otatabana
Esengeli na yo te otala-tala
Mpo miso pai-pai nde bolai
Bomoi ezali molayi
Lobi ezali
Lobi kuna mpe ezali …
Esengeli na yo botosi ya mokili
Esengeli otosa mpe mibeko oyo tango epesi
Moto nyonso nde abengama kozala bokulaka te
Kasi
Yeba ete
O se ya moyi, mobola mpe azali te
Kasi
Bayinga nde bayebi te ete
Bwanya nde nkita ya seko
Moyebi nde mozui
Yekola koyoka na mozindo
Kotala na bokebi
Mpe
kokanisa na molongo
« Yoka mingi, loba moke »
Eloba bakoko
Likanisi ekeyi mosika kokanisaka kulutu na ngai Bienvenu Sene Mongaba😌
19/09/2024
Wapi yo … ?
Na elikya okozonga
Ata ndele
Na koyeba ete
Okozongaka soko mòkè te
Nakosi ya ngai liyoki
Kasi nzebi eyebi
Solo ya yo mobembo boseko
Etiki o kati na ngai milelo se milelo
Molimo mozali koganga tongo-tongo
« Zonga ! Zonga koh !! »
Kasi wapi nazwa eyano !
Nabanzi
Nakanisi
Nayoki pasi
Naleli
Okeyi…
Iyo kasi « wapi »
Wapi ?
Wapi yo ?
Yo ya ngai sai
Kimya na ngai
Mayi na ngai
Ya piyo
Wapi yo…
Milelo ya motema
Liyemi nde matama
Kuna nde nzadi ya mak**a
Etalisamaka
Ebele bakotiola
Mòkè bakopopola
Mpe basusu bakoyekola
Lisolo ya motema
Elula matoyi ya baninga
Kasi nani nde akoyoka !
Yango tika nakoma !
Mpo ata ndele akozonga
Ata nayebi ete nazali komikosa
Kasi bozoba ya linoki etindi nga likya
Wapi yo …?
Motuna ya motema
Mbela ya mobola…
😞
30/06/2024
« Kongo bomoko : mokano ya Lumumba », tel a été le sujet qui a réuni, pendant 3 heures du temps entre 13h00 et 16h00, une vingtaine de congolais au centre culturel André Blouin, dans la commune de Kintambo. La conférence, animée par Ntale Cishambo, coordonnateur de l’Asbl Toyekola et grand admirateur de Lumumba, a commencé par l’hymne national du Congo en lingala intitulé « Telema mwana ya Kongo.
« Il n’y a aucune école où l’on apprend à s’affranchir et affranchir sa communauté. La révolte est toujours animée par la souffrance extrême », a dit Ntale Cishambo, qui a une bonne dose de documentation sur l’histoire de Lumumba. Cette citation a permis à ce que le conférencier explique le pourquoi du combat de l’homme qui a permis à ce que l’indépendance congolaise puisse avoir lieu.
Notons que l’objectif de cette conférence était de hausser le niveau de connaissance de la vision de la libération du Congo et de son unité nationale que portait notre héros national, Elias Okit’asombo Lumumba. Il s’est avéré par la suite que ledit objectif a été réellement atteint. En effet, à l’issue de ce rendez-vous passionnant, chaque participant a pu définir Lumumba à sa manière et son combat qui consistait à prôner l’unité nationale. Par la suite, la conférence s’est clôturée autour d’un verre avec comme perspective de se revoir prochainement pour parler des sujets relatifs à l’histoire du Congo.
La conférence sur Lumumba a été organisée par l’Asbl Toyekola en collaboration avec le centre culturel Andrée Blouin. Toyekola est une structure promotrice des valeurs culturelles et savoirs congolais. Elle prépare les enfants congolais à recevoir l’enseignement en langues congolaises.
28/06/2024
✋🛑 MOTUNA NA BANA YA CONGO 👂
Lumumba azali nani mpo na yo ?
Tobosana mpe te komonana lobi na Centre Culturel Andrée Blouin na 13h00
21/06/2024
Kongo bomoko : mokano ya Lumumba.
Mokano yango ekokisama ?
Mpo na yo Lumumba azali nani ??
Biyano na commentaire bandeko ?🤗🤗